Tabu Ley Rochereau & African Fiesta – Omanga Lyrics

Balola elongi namona
seka mino pembe emonana
tambola moke ngai natala
zonga pembeni mpo tosolola
ngai nayoka nzoto mpo nailing yo

Lelo na pokwa yo tobima
lata kitoko ngai nalula
bakanga yo pe suki ya maboko
nzelanzela tango tokobima
kotala moto te, noki nakufa na zua ehh

Cherie Omanga tozonga ndako osolola ngai moke ndenge nini okola
Omanga leki Omehonga yebisa yasolo soki yo olingi ngai

Balola elongi namona
pusana pembeni natala yo
Omanga naye zoba mpo nalingi yo (2x)

Fungola ndako ngai nakota
fanda nakiti mpo tosolola
benga ba temoins bamona biso
pesa masanga mpo bamela
Omanga naye zoba mpo nalingi yo

Benga baboti mpo tolobana
nameka nzoto mwana mobali
soki pe mbongo nakoluka
bipayi binso nakopanza sango
Omanga bakomi komoni ngai nde liboma

Tagged

You cannot copy content of this page