Fally Ipupa – Une Minute Lyrics

Kitoko ezali elamba oyo nzambe alatisaka moto nyonso te
Kasi ezali, kitalatala moto nyonso akoki kotala e (Repeat)

Napekisi bino botala Claudia te
Kasi nga nasengi esuka se na regard
Ya ko pesa ye ba rendez-vous wana bokoboma nga
Coco Claudia aza ya ngayimei

Maman nani yango alobaka kitoko eza mabele
Est-ce que eza te po amona te Claudia Sassou

(Aya bangu e, aya kotala Koko Claudia Sassou)

Moko ya couleur oyo arc-en-ciel elukaka
Po azuwa pe nguya ya kokanga ekanga moyi kobima,
ndenge akanga mvula konoko

(Eza nde Claudia)

ye aza na etamboli ya balon ezana mopepe
Nzoto naye sembe sembe moto-moto pe moselu
Pays-bas on dirait cowboy alati ba revolvers
Soki apesi nga videdo wana nga na bavaka

(Elle est sucrée, Claudia)

Esika nzambe azuwa mabele ya kosala ye
Eza esika oyo apekisa ba anjelu banyata
Ba anjelu ba ngolomaka esika’ango na mabolongo
Ye moko nzambe atambolaka esika’ango makolo ngulu
Koko Claudia Sassou

yo oza réponse exacte ya beauté
Soki bolingo nayo ezalaki prison Nakoboya nanga liberte
Ata kolinga yo ezali ngambo, nga nandimi ngambo
Lokola Adam andima ngambo po alingaki eva e

(Talking-…Sikoyo jolibitationismementationnellementationnellement ebandi)

Kokende te eee Claudia, Po oza moko ya mikuwa ya mipanzi nangayi
Oza elengi kofiba koleka mokuwa ya makoso
]Komona yo eza lokola namoni(na diongoli) paradis na miroir
Ata nzambe alobi azongisa nga bebe na maboko ya maman
te nakoboya

Lo…. Papa na maman balalisaka nga (na berceau)
Tango age epusani babimisi nga (na chambre)
Kasi nga nayo Claudia mbeto moko, soki pe malili (toko finika pou…tte moko Claudia Sassou)
Ha mokowa nanga mosuni nanga mon cœur,mon bras, ma jambe(eza yo Claudia)

Cherie ii ii Claudia nanga,cherie facon yo osalaka oyo yayo synopsis
soki ngonga ya kokata sentiment nanga
Claudia pardon nakoseng’o bakisa (Une Minute)
[Ndenge bapesaka condamné à mort (Une Minute)
[
Avant ya ko exécuter ye ee
Chérie pardon nakoseng’o juste kaka (Une Minute)
Ndenge moto azangi unités asengaka (Une Minute)
Ata eza moko kasi na bolingo eza ebele
Nakoki kolobel’o ata je t’aime na (Une Minute)
Nakoki kopesa yo ata pe bipwepwe zuana (Une Minute)
]Nakoki kosala’o ata bisala sala na (Une Minute)
Po après naloba bébé je vais encore une pour la route
avant que l’on ne se sépare

Papa Denge zaza(ya …)
Nguli aza (ya papa denge)
Kasi Claudia yo oza ya nani

kitoko ya basusu suka(quelque part)
Kasi ya maman ya lisson na laurette (na rez-de-chassee ee koko C.S)
ah nga naleli ( Une Minute)
Benga nga cherie (Une Minute)
Nafongoli tshombo (Une Minute)
nazo zela appel’a Claudia (Une Minute)

patsho panda honorable honorable serge kayembe
Na sengi ya pamba une nuit….

Tagged

You cannot copy content of this page